Acts 16

Timote elongo na Polo mpe Silasi

1Polo akomaki na engumba ya Derbe mpe ya Listre, epai wapi akutanaki na moyekoli moko na kombo ya Timote. Mama na ye azalaki Moyuda oyo andimelaki Klisto, mpe tata na ye azalaki moto ya mokili ya Greki. 2Litatoli na ye ezalaki malamu kati na bandeko ya Listre mpe ya Ikoniomi. 3Polo azalaki na posa ya kosala na ye mobembo elongo, yango wana akatisaki ye nzoto ya mibali ; pamba te Bayuda oyo bazalaki kovanda kuna, bayebaki ete tata na ye azalaki moto ya mokili ya Greki. 4Na bingumba nyonso oyo bazalaki koleka, bazalaki koyebisa bandimi mikano oyo bantoma mpe bakambi ya Lingomba ya Yelusalemi bazwaki ; mpe basengaki bango ete bakoka kotosa yango. 5Boye, mangomba ezalaki kolendisama na kondima mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo.

Emoniseli ya Polo

6Lokola Molimo Mosantu apesaki bango nzela te ya koteya Liloba na Azi, Polo elongo na baninga na ye bakendaki na etuka ya Friji mpe ya Galatia. 7Tango bakomaki na ndelo ya Mizi, bazwaki likanisi ya kokende na Bitini, kasi Molimo ya Yesu apesaki bango nzela te. 8Wana balekaki na etuka ya Mizi, bakendaki kino na libongo ya Troasi. 9Na butu, Polo azwaki emoniseli moko : Moto moko ya Masedwane atelemaki liboso na ye mpe azalaki kobondela ye : “Nabondeli yo, yaka kosunga biso na Masedwane !”

10Na nzela ya emoniseli ya Polo, tolukaki kokende na lombango na Masedwane, pamba te tososolaki ete Nzambe abengaki biso ete tokende koteya sango malamu kuna.

Lidi abongoli motema na Filipi

11Longwa na Troasi, tozwaki masuwa mpe tokendaki mbala moko kino na esanga ya Samotrase, bongo na mokolo oyo elandaki, tokomaki na Neapolisi. 12Kolongwa wana, tokendaki na Filipi, mboka mokonzi ya etuka ya Masedwane oyo ezalaki na se ya bokonzi ya bato ya Rome. Tovandaki wana mwa mikolo.

13Na mokolo ya saba, tobimaki na libanda ya ekuke ya engumba mpo na kokende pembeni ya ebale, epai wapi tokanisaki ete tokokaki komona esika ya mabondeli. Wana tovandaki, tokomaki koteya basi oyo basanganaki wana. 14Moko kati na basi oyo bazalaki koyoka, na kombo ya Lidi, azalaki moteki bilamba ya motane mpe moto ya engumba ya Tiyatire. Azalaki mwasi oyo azalaki kosambela Nzambe. Nkolo afungolaki motema na ye mpo ete asosola maloba ya Polo. 15Tango ye elongo na bato ya libota na ye bazwaki libatisi, abengisaki biso na ndako na ye. Alobaki : “Soki bomoni ete ngai nakomi penza mondimi ya Nkolo, boya kovanda na ndako na ngai !” Boye, asalaki nyonso ete tondima kokende na ndako na ye.

Polo mpe Silasi na boloko

16Ezalaki mokolo moko, wana tozalaki kokende na esika ya mabondeli, tokutanaki na elenge mwasi moko oyo azalaki mowumbu. Azalaki na molimo mabe oyo ezalaki kolakisa ye makambo ebombama. Boye, kosakola na ye ezalaki kofuta bankolo na ye mbongo mingi. 17Elenge mwasi yango azalaki kolanda biso, Polo mpe biso, bongo azalaki koganga : “Bato oyo bazali basali ya Nzambe oyo Aleki Likolo, bazali koteya bino nzela ya lobiko !” 18Azalaki kosala bongo mikolo ebele. Suka na suka, Polo atombokaki, abalukaki mpe alobaki na molimo yango : “Na kombo na Yesu Klisto, napesi yo mitindo, bima kati na elenge mwasi oyo !” Kaka na tango wana, molimo yango ebimaki kati na ye.

19Tango bankolo ya mowumbu yango bamonaki ete nzela oyo bazalaki kozwela mbongo ekangami, bakangaki Polo mpe Silasi mpe bamemaki bango liboso ya bakonzi, na esika ya bato ebele. 20Bamemaki bango liboso ya basambisi mpe balobaki : “Bato oyo bazali Bayuda. Bazali kotia mobulu na engumba na biso. 21Bazali koluka kokotisa awa, bizaleli oyo biso bato ya Rome tozali na ndingisa te ya kondima mpe ya kosalela.”

22Bato oyo batondaki wana batombokelaki Polo mpe Silasi, bongo basambisi batindaki ete balongola bango bilamba mpe babeta bango fimbo. 23Sima ya kobetisa bango fimbo makasi, babwakaki bango na boloko. Bapesaki mitindo na mokengeli ya boloko ete akengela bango malamu. 24Wana mokengeli azwaki mitindo oyo, abwakaki bango kati na boloko, mpe akangisaki makolo na bango na mabaya.

25Pene na midi ya butu, Polo mpe Silasi bazalaki kobondela mpe kokumisa Nzambe na banzembo, bongo bakangami misusu bazalaki koyoka bango. 26Na mbala moto, mabele eninganaki makasi penza, mpe bafondasio ya boloko eninganaki. Kaka na tango wana, bikuke nyonso ya boloko efongwamaki mpe minyololo ya bakangami nyonso ekatanaki. 27Mokengeli alamukaki. Mpe tango amonaki ete bikuke ya boloko ezalaki ya kofongwama, abendaki mopanga na ye mpe alingaki komiboma, pamba te akanisaki ete bakangami bakimi. 28Kasi Polo agangaki na mongongo makasi : “Komisala mabe te ! Biso nyonso tozali awa !”

29Bongo, mokengeli asengaki mwinda, akotaki mbangu na boloko mpe amibwakaki liboso ya Polo mpe Silasi na kolenga nyonso. 30Abimisaki bango libanda mpe atunaki bango :

—Batata, nasala nini mpo ete nabika ?

31Bazongiselaki ye :

—Ndimela Nkolo Yesu mpe okobika yo elongo na libota na yo !

32Boye, bateyaki ye elongo na bato nyonso ya libota na ye Liloba ya Nkolo. 33Kaka na ngonga wana ya butu, mokengeli akamataki bango mpe asokolaki bapota na bango. Bongo, na mbala moko, ye elongo na libota na ye bazwaki libatisi. 34Mpe na sima, mokengeli amemaki Polo mpe Silasi na ndako na ye, mpe apesaki bango biloko ya kolia. Atondisamaki na esengo makasi, pamba te ye elongo na libota na ye mobimba bandimelaki Nzambe.

35Tango tongo etanaki, basambisi batindaki basali na bango epai ya mokengeli ya boloko mpo na koyebisa ye : “Bimisa bato wana na boloko !”

36Mokengeli alobaki na Polo :

—Basambisi bapesi ngai mitindo ete nabimisa bino na boloko. Boye, bobima mpe bokende na kimia !

37Kasi Polo azongisaki :

—Nini ! Basambisi biso te, kasi babetisi biso fimbo na miso ya bato mpe babwaki biso na boloko, nzoka nde biso tozali bato ya Rome. Balingi sikʼoyo kobimisa biso na nkuku ? Te ekosalema bongo te, tika ete bango moko baya kobimisa biso.

38Basali bakendaki koyebisa makambo yango epai ya basambisi. Tango kaka basambisi bayokaki ete Polo mpe Silasi bazali bato ya Rome, babangaki makasi. 39Bayaki kosenga bango bolimbisi mpe babimisaki bango na boloko. Basengaki bango ete balongwa na engumba wana. 40Sima ya kobima na boloko, Polo mpe Silasi bakendaki na ndako ya Lidi, epai wapi bakutanaki na bandeko mpe balendisaki bango. Bongo, bakendaki.
Copyright information for LinMNB